2 Corinthians 6

1Lokola tozali kosala elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te. 2Pamba te, Nzambe alobi : “Na tango ya malamu, nayanolaki yo ;
mpe na mokolo ya lobiko, nasalisaki yo.”

Nzoka nde, tango ya malamu ezali nde sikʼoyo ; lelo nde ezali mokolo ya lobiko.

3Tobetisaka moto moko te libaku, mpo ete baloba mabe te mpo na lotomo na biso. 4Kasi na makambo nyonso, tolakisaka ete tozali solo basali ya Nzambe : na koyika mpiko kati na minyoko,
kati na kozanga,
kati na bapasi,
kati na kobetama,
kati na baboloko,

5 kati na mobulu,
kati na misala makasi,
kati na kozanga kolala,
kati na nzala,

6 na nzela ya bopeto,
na nzela ya boyebi,
na nzela ya kokanga motema,
na nzela ya bolamu,
na nzela ya Molimo Mosantu,
na nzela ya bolingo ya solo,

7 na nzela ya Liloba ya solo,
na nzela ya nguya ya Nzambe,
na nzela ya bibundeli ya bosembo
mpo na kolonga bitumba mpe komibatela ;

8 kati na nkembo mpe kati na kotiolama,
kati na lokumu mpe kati na soni ;
bazwaka biso lokola bato ya lokuta,
nzoka nde, tolobaka solo ;

9 bazwaka biso lokola bato bayebani te,
nzoka nde, toyebana malamu ;
bazwaka biso lokola bakufi,
nzoka nde, tozali na bomoi ;
bazwaka biso lokola bato bazwi etumbu,
nzoka nde, tokufa te ;

10 bazwaka biso lokola bato ya mawa,
nzoka nde, tozalaka tango nyonso na esengo ;
bazwaka biso lokola babola,
nzoka nde, tokomisaka bato ebele bazwi ;
bazwaka biso lokola bato bakelela,
nzoka nde, tozali na biloko nyonso.

11Bandeko ya Korinto, tolobi na bino penza na polele, mpe na mitema ya kofungwama. 12Tokangelaki bino mitema na biso te, kasi bino nde bokangelaki biso mitema na bino. 13Botika ete naloba bino lokola epai ya bana na ngai ya bolingo : bino mpe bofungolela biso mitema na bino.

Kokabwana na mabe

14Bosangana te elongo na bato oyo bandimaka Nzambe te. Pamba te, boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe ? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili ? 15Klisto akoki solo koyokana na Satana ? Eloko nini ekoki kosangisa mondimi na mopagano ? 16Boyokani nini ekoki kozala kati na Ndako ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te, biso tozali Ndako ya Nzambe ya bomoi, kolanda oyo Ye moko Nzambe alobaki : “Nakovanda kati na bango
mpe nakotambola elongo na bango.
Nakozala Nzambe na bango,
mpe bango bakozala bato na ngai.

17 Yango wana, bobima kati na bango,
mpe bokabwana na bango,”
elobi Nkolo.
“Bosimba te oyo ezali mbindo,
mpe ngai nakoyamba bino.”

18 “Nakozala Tata na bino,
mpe bino bokozala
bana na ngai ya mibali mpe ya basi,”
elobi Yawe, Nkolo na nguya nyonso.
Copyright information for LinMNB